by Salome Kalitas | 26 February 2022 08:46 pm02
Biso bakristo, tozali na ndingisa ya kosala mikolo 40 ya moto oyo akufi, to mpe kosala bamaziyelo na bakunda nsima ya kokunda?
Lisolo ya fɛti ya mikolo 40 ezali ya bapagani, ezali ya bokristo te. Euti kala mingi na ekólo ya Misiri, epai bato oyo bazalaki bato minene (lokola bakonzi to bato ya lokumu), soki bakufi, bazalaki kopakola nzoto na bango bankisi ya sipesiale mikolo 40 mobimba.
(Mokolo nyonso bazalaki kopakola ye mbala moko, bongo batikaka ye, mokolo mosusu bazongaka lisusu, mpe bongo bongo kino mikolo 40 ekokisama).
Nsima ya mikolo wana kosila, nde bazalaki kokanga nzoto ya moto na elamba ya bakufi, mpe kotia ye na ebombelo moko ya sipesiale, epai nzoto ekokaki kotikala bankama ya bambula sans kopola.
Yango nde Yozefe asalaki mpo na tatá na ye Yakobo.
Ebandeli 50:1-3 (Mokanda na Bomoi)
“Yozefe akweyaki na elongi ya tatá na ye, alelaki ye mpe apesaki ye mbusu.
Bongo Yozefe apesaki mitindo na basali na ye, banganga ya bankisi, ete bapakola nzoto ya tatá na ye mpo ete epola te. Banganga ya bankisi bapakolaki Isalaele.
MIKOLO 40 ESILAKI, pamba te ezali bongo mikolo oyo bazalaki kosala mpo na kopakola bankisi. Bamisiri balelaki ye mikolo tuku sambo.”
Makambo wana nyonso ezalaki milulu ya Bamisiri, kasi ya Ba-Isalaele te. Yozefe asalelaki lolenge wana ya Bamisiri mpo ete bomoi na ye mingi asalaki yango na Misiri; ata mwasi na ye azalaki Mimisiri, mpe ata nkombo na ye Farao abongolaki yango epesaki ye nkombo ya Misiri.
Kasi nsima ya mibeko koya na lobɔkɔ ya Moyize, makambo wana esilaki nyonso! Nzambe atakaka esika moko te epai atindaki Ba-Isalaele bapakola bakufi bankisi mikolo 40.
Ezalaki solo milulu ya kopakola nzoto na mafuta ya malasi (parfums) mpo na bakufi, kasi ezalaki mikolo 40 te, mpe ezalaki mafuta ya malasi, kasi bankisi te.
Sik’oyo motuna ezali: mpo na nini lelo na bokristo, fɛti oyo ya mikolo 40 ekoti lokola nde ezali ya kondima?
Fɛti oyo ya mikolo 40 ebongwanaki: euti na kopakola nzoto ya moto oyo akufi kino kokanisa mpe kosala milulu ya kokumisa bakufi. Ekotaki tango ndambo ya bato oyo bazalaki bakristo te, balinganisaki:
– ndenge Nkolo Yesu amonani na bato mikolo 40 nsima ya lisekwa na Ye,
– mpe ndenge apumbwaki na likoló nsima ya mikolo wana 40.
Na kolinganisa wana, babimisaki liteya ete: soki moto akufi, molimo na ye ezali kotambola-tambola mikolo 40, komimonisa epai ya bato, liboso ete ekende soki na paradizo to na lifelo.
Balobaki ete nsima ya mikolo 40 nde molimo ekendaka likoló to ekweyaka na se.
Yango wana, ndambo ya mangomba bandimaka ete mikolo 40 nsima ya liwa nde eleko malamu ya kosambela mpo na bakufi, mpo ete bakóma na nsuka malamu. Balobaka ete soki basambeli ye te na mikolo wana 40, soki akufaki na masumu, akokende na lifelo, kasi bakufandi bakoloba ete basalaki ye bolamu te.
Kasi, liteya wana ezali na solo ya Biblia?
Te! Ezali na solo ata moke te na Biblia.
Makomi elobi polele ete ntango moto akufi, mbala moko:
– soki akufi na masumu, akokita na lifelo,
– soki akufi na boyengebene, akokota na paradizo.
Luka 16:22-23 (Mokanda na Bomoi)
“Moto mobola akufaki, banzelu bamemaki ye na se ya Abrahama. Mobali mozwi mpe akufaki mpe bakundaki ye.
Wana azalaki na pasi na lifelo, atombolaki miso mpe amonaki Abrahama mosika, mpe Lazaro na se na ye.”
Ba-Ebreu 9:27 (Mokanda na Bomoi)
“Ezali ekateli ete moto akufa mbala moko, mpe nsima ya yango ekateli.”
Ezali mikolo 40 ya kozela te. Mpe lisusu, Nkolo Yesu azalaki mokufi te tango amonani na bato mikolo 40. Azalaki ya bomoi, asilaki kosekwa. Azalaki molimo te (mzimu te). Mizimu etikaka mikuwa na bango na kunda, kasi na kunda ya Yesu, etikalaki eloko moko te, longola kaka “BASANDA”.
Yango wana, fɛti ya mikolo 40 ezali ya bapagani. Biso bakristo tosengeli te kosala yango, mpo ete Kristo azali te na milulu wana.
Sik’oyo okoki kotuna: soki babengi yo na libota oyo bazali kosala milulu wana, osengeli kosala nini?
Soki babengi yo, mpe bango bakómí naino te koyeba solo, okoki kokende, kasi kosangana te ata moke na milulu na bango, mpo ete ezali milulu ya bakufi. Mokano na yo ekóma te kolia, kasi kosakola bango bolingo ya Kristo, na bwanya nyonso, mpo ete tango bakotika esika wana, bayeba Kristo, nguya na Ye, mpe solo ya makambo oyo elandaka liwa.
Mpe lisusu, biso bakristo tozali na ndingisa te ya kosala bamaziyelo na bakunda mpo na kosambela bakufi, to mpo na kobongola esika bazali, to mpo na kozwa mapamboli epai na bango. Te!
Bamaziyelo na bakunda esengeli kaka mpo na kosala bopeto, mpe kolakisa lokumu na biso oyo totikali na bomoi, lokola elembo ya bonkɔkɔ mpe bomoto liboso ya bato ya libanda. Kaka ndenge osalaka bopeto na ndako, na lopango, to na elanga na yo.
Soki olingi koyeba polele makambo oyo ekosalema nsima ya liwa, okoki kofungola awa:
👉 Nini ekosalema nsima ya liwa!
Maran atha!
Source URL: https://wingulamashahidi.org/ln/2022/02/26/biso-bakristo-tosengeli-kosala-mikolo-40-ya-moto-oyo-akufi/
Copyright ©2026 Pole ya bolingo ya Kristo unless otherwise noted.