Boboto mpe kimya ezala na bino na nkombo ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Kristo. Tózwa ntango moke mpo na kokanisa Nsango Malamu na nzela ya bomoi ya moko ya bantoma ya Yesu: Tomaso.
Tomaso, oyo babengaki mpe Didimo (elakisi libala), azalaki moko ya bantoma zomi na mibale ya Yesu. Azalaki te lokola Yuda Isikariote, oyo asɛmbolaki Nkolo. Na solo, Tomaso azalaki moto ya mpiko. Mokolo moko, tango Yesu ayebisaki bayekoli ete alingi kozonga na Yudea ata soki ezalaki na likama, Tomaso alobaki na bayekoli mosusu:
“Biso mpe tókɛndɛ, mpo tókufa elongo na ye.” (Yoane 11:16 – Mokanda na Bomoi)
Maloba oyo emonisi ete Tomaso azalaki kolinga Yesu mingi mpe azalaki pene ya kopesa bomoi na ye mpo na Ye.
Kasi Tomaso azalaki mpe na bolembu moko: azalaki moto ya ntembe mpe mituna mingi, mingimingi na makambo etali nguya ya Nzambe. Ntembe wana ezalaki kosala ete kondima na ye elɛmba mpe azala na mokakatano ya kozala malamu elongo na baninga na ye na bomoi ya molimo.
Sima ya Yesu kosekwa, bayekoli basanganaki esika moko, bakangaki bikuke mpo na bobangi. Bazalaki kosambela. Kasi Tomaso azalaki elongo na bango te. Kozanga na ye ezalaki na ntina monene, mpo abungisaki libaku ya komona Nkolo.
Yesu ayaki mpe amimonisaki epai ya bayekoli. Tango Tomaso ayaki sima, bayekoli bayebisaki ye na esengo nyonso:
“Tomoni Nkolo!”
Kasi Tomaso andimaki te. Alobaki:
“Soki namoni bilembo ya misumari na maboko na ye te, soki natyi mosapi na ngai te esika misumari ezalaki mpe natyi loboko na ngai te na mopanzi na ye, nakondima ata moke te.” (Yoane 20:25 – Mokanda na Bomoi)
Likambo oyo eteyi biso ete komikabola na lisangá ya bandimi ekoki komema ntembe. Tango Tomaso amikabolisaki, amikabolisaki mpe na esika oyo Nkolo amonisanaki. Mbala mingi, Yesu amonisanaka na kati ya lisangá, kasi te tango moto azali ye moko.
Sima ya mikolo mwambe, bayekoli basanganaki lisusu. Mbala oyo, Tomaso azalaki wana. Yesu ayaki mpe alobaki na Tomaso na boboto nyonso:
“Tyá mosapi na yo awa, tala maboko na ngai; tyá loboko na yo na mopanzi na ngai. Tiká kozala na ntembe, kasi kondima.” (Yoane 20:27 – Mokanda na Bomoi)
Na tango wana, motema ya Tomaso ebongwanaki. Atombolaki mongongo mpe alobaki:
“Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!” (Yoane 20:28 – Mokanda na Bomoi)
Yesu ayanolaki ye:
“Lokola omoni ngai, ondimi; esengo ezali ya baoyo bamoni te kasi bandimi.” (Yoane 20:29 – Mokanda na Bomoi)
Lisolo oyo eteyi biso mateya minene ya molimo:
“Epai bato mibale to misato basangani na nkombo na ngai, ngai nazali kati na bango.” (Matayo 18:20 – Mokanda na Bomoi)
Yango wana Liloba ya Nzambe elobi:
“Bótika te kosangana esika moko, ndenge bato mosusu basalaka, kasi bólendisana, mingi mpenza lokola bozali komona mokolo ya Nkolo kopusana pene.” (Baebre 10:25 – Mokanda na Bomoi)
Bókima te na lisangá. Tiká ete mawa, kozanga elikya to ntembe emema yo te na komikabola. Zala pene ya bandimi. Zala na losambo. Zala wana. Mapamboli mosusu eyaka kaka tango tozali esika moko elongo na basusu.
Tiká ete Nkolo asalisa biso tózala sembo mpe tokangama makasi ata na tango ya kozanga bososoli. Lokola Tomaso, tokoki kotuna, kasi tózala esika Kristo akoki kokuta biso: kati ya bato na Ye.
Print this post
Save my name, email, and website in this browser for the next time I comment.
Δ