MAMA, TALA, MWANA NA YO

MAMA, TALA, MWANA NA YO

Nazali kopesa bino mbote na Kombo oyo eleki bakombo nyonso — Kombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo. Boya tótángana maloba ya bomoi, na tango oyo tozali naino na bomoi. Makomi elobi boye:

📖 Yoane 19:25-27

“Tango wana, pembeni ya ekulusu ya Yesu, bazalaki mama na Ye, ndeko ya mama na Ye, Maria, mwasi ya Klopas, mpe Maria ya Magdala.
Tango Yesu amonaki mama na Ye mpe molandi oyo Ye alingaka azali wana pembeni, alobaki na mama na Ye: Maman, tala mwana na yo!
Bongo alobaki na molandi wana: Tala mama na yo! Wana molandi wana azwaki mama yango epai na ye kobanda ngonga wana.”

Okoki komituna: mpo na nini Yesu asalaki boyokani ya ndenge wana na ekulusu, mpe na esika mosusu te? Ezalaki bato ebele wana pembeni ya ekulusu — bato, basi, mpe bayekoli mosusu — kasi miso ya Nkolo Yesu etalelaki kaka bato mibale: mama na Ye mpe molandi oyo Ye alingaka, Yowane.

Yesu azalaki na bandeko mosusu ya mibali, kasi Ye apesaki mama na Ye epai ya Yowane, te epai ya bandeko na Ye. Na ndenge moko, Yowane azalaki na mama na ye moko, kasi Yesu alobaki te: “Tala mama na yo,” na mama ya Yowane, kasi alobaki yango na Maria, mama na Nkolo na ye. Yowane ayokaki maloba yango, mpe azwaki Maria mpo azala elongo na ye.

Boyokani wana — ya moto komibatela mama oyo azali te mama na ye, mpe ya mama komemya mwana oyo azali te mwana na ye — ezali likabo oyo ewutaka kaka epai ya Kristo.

Biso lokola Lingomba ya Kristo, tokozala na bolingo ya solo te, soki miso na biso etaleli te Kristo oyo asalabamaki. Soki tozali kokende na Lingomba mpo kaka na koluka biloko ya mokili — bizaleli, misala, to eloko mosusu — tokoyoka te boyokani yango ya sika kati na biso.

Yesu alobaki:

📖 Yoane 13:34-35

“Napesi bino mobeko ya sika: bolinganaka. Lokola ngai nalingi bino, bino mpe bolinganaka ndenge moko.
Soki bolingani banso, bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai.”

Nkolo Yesu asepelaka te komona bato balobaka ete bazali bakristo kasi bazangaka bolingo. Soki tokokanisaka biso moko, tokangisaka motema epai ya baninga, tokokanisa kaka mposa na biso moko — yango emonisi ete tozali naino te pene na ekulusu ya Golgota mpo toyoka maloba ya Kristo mpo na bandeko na Ye.

Boyokani oyo Yesu asalaki kati na Maria na Yowane ezalaki na litomba monene mpo na bango mibale. Maria asangisamaki lisusu te na mawa ya koleka mwana na ye, mpo azwaki moto oyo atalaki ye lokola Yesu moko. Yowane mpe, na nzela ya Maria, ayebaki makambo mingi ya bomoi ya Yesu oyo bayekoli mosusu bayebaki te, mpo Maria azalaki kotia makambo yango na motema na ye.

📖 Luka 2:19

“Kasi Maria azalaki kobomba makambo nyonso yango na motema na ye mpe azalaki koluka koyeba ntina na yango.”

Yango wana, Yowane ayebaki makambo ya se moko ya bomoi ya Kristo, mpe mpo na yango nde Yesu amonisaki ye maono ya monene na Patmo, na buku ya Emoniseli.

Lokola Maria mpe Yowane, biso mpe tokoki koleka na pasi, mawa, to kobanga, kasi Yesu apesaka biso bandeko oyo bakosalela biso mpo tóndima lisusu, bakofungola biso mitema, mpe bakosalisa biso koyeba Ye malamu koleka ndenge tozalaka.

Yango nyonso ezali kaka mpo na koluka Kristo oyo asalaki mpo na biso na ekulusu. Ntango tokotala pasi na Ye mpe bolingo oyo amonisaki epai ya bato oyo balingaka te, tokoyekola mpo na kopesa bomoi na biso mpo na bandeko na biso mpe kolinga bango lokola Ye alingaki biso.

Yango wana, zala na boyebi ete na kati ya Lingomba na yo, Kristo asepelaka komona boyokani mpe bolingo kati na bakristo.

Nkolo apambola yo.
Sanganisa nsango oyo ya malamu na bandeko mosusu mpo bálonga mpe bázwa bomoi na Kristo.


Print this post

About the author

Rose Makero editor

Leave a Reply