(Efesó 2:10) “Pamba te tozali mosala na ye; tosalemaki kati na Klisto Yesu mpo ete tosala misala ya malamu, oyo Nzambe abongisaki kala mpo ete tozala kati na yango.”(Efesó 2:10) Nayambaka yo na kombo ya Mobikisi na biso Yesu Klisto. Boya tótánga maloba ya bomoi. Ngai mpe yo, ndenge Makomi elobi, tozali mosala ya Nzambe. Soki tozali mosala ya Nzambe, ezali mpifo ete tosalemaki mpo na kokokisa mokano moko na mokili oyo. Lokola ndenge omoni motuka, oyebi ete ezali mosala ya moto, mpe ezali mpo na komemya bato to biloko na vitesse.Lokola ndenge omoni ndako, ezali mpo na kopesa esika ya kopema, ezanga te ezali na ntina.Lokola ndenge omoni esika ya nzube, ezali mosala ya ndeke mpo na kofanda kati na yango. Bongo biso mpe, tosalemaki mpo na kokokisa mokano ya Nzambe: kosala misala ya malamu. 1. BOLOKO YA MISALA YA MALAMU Nzambe abongisaki biso lokola biloko oyo ezali na ntina mpo na komonisa misala ya malamu. Ata eloko moko ya mosusu ekoki te kosala yango, kaka moto nde. Efesó 2:10“Pamba te tozali mosala na ye; tosalemaki kati na Klisto Yesu mpo ete tosala misala ya malamu, oyo Nzambe abongisaki kala mpo ete tozala kati na yango.” Soki moto ayebi te mokano na ye na mokili, akokufa mpamba, lokola televizo oyo emonisi eloko te, to motuka oyo etamboli te, to fer à repasser oyo epesi te molunge. Ekolekisa nzela te, ekotupama. Bongo yo mpe: bomoi na yo ezali mpo na kosala misala ya malamu. 2. LOKUMU YA MISALA YA MALAMU NA KLISTO Kasi misala wana ezali kaka oyo ezali kati na Yesu Klisto. Ezali bongo te kaka kolinga ndenge bato nyonso basalaka. Nzambe alobi tosalemaki kati na Klisto Yesu, ezala te kati na Adama, Ibrahimu, to mosakoli mosusu. Ndenge wana, misala oyo Yesu asalaki, tozali mpo na kosala yango. Kasi ekoki kaka soki moto abotami lisusu na Nzambe. a) Bolingo (Agape) Bolingo ya Yesu ezali bolingo ya kokoka. Ezali te kaka bolingo ya kolinga baoyo balingi yo. Te. Ezali bolingo ya kolinga ata baoyo bazali banguna na yo, mpe kobondela mpo na bango. Yesu alobaki: Matai 5:44-45“Kasi ngai nalobi na bino: Bolingaka banguna na bino, bondelaka mpo na baoyo bazali kotungisa bino, mpo ete bozala bana ya Tata na bino oyo azali na likolo. Pamba te Ye ayaka moi na ye mpo na bato mabe mpe bato ya malamu; mpe apesaka mvula epai ya bato ya sembo mpe bato ya kozanga sembo.” Bolingo oyo ezali agape. Ngai na yo tosengeli komonisa yango mpo yango nde mokano oyo Nzambe apesaki biso. b) Bule (Utakatifu) Yesu alobaki: Matai 5:20“Pamba te, nalingi koloba na bino: soki bosembo na bino eleki te oyo ya bakomi mibeko mpe Bafarize, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.” Bafarize bazalaki na biloko ya misala, kasi bazalaki na makambo ya nzoto. Kasi Yesu apesi biso Molimo Mosantu mpo ete tosala bomoi ya bule. 1 Petelo 1:16“Pamba te ekomami: Bokozala bule, pamba te ngai nazali bule.” c) Kosakola Sango Malamu Yesu akomaki kobanda mosala na ye na mabele na ndenge ya kosakola Sango ya Bokonzi. Baroma 10:15“Bango bakozala bapesi sango ndenge nini soki batindami te? Denge ekomami: Bonene ezali mpenza loketo ya baoyo bapesaka nsango malamu.” Yo mpe osengeli kosakola, koyebisa bato makambo monene oyo Yesu asali na bomoi na yo. d) Kondima Baebre 11:6“Kasi, kozanga kondima, ekoki te kosepelisa Nzambe. Pamba te moto nyonso oyo ayaka epai ya Nzambe asengeli kondima ete azali mpe ete apesaka lifuti epai ya baoyo bazali koluka Ye.” Kondima nde eza mposa mpo na bomoi ya moto oyo azali mosala ya Nzambe. e) Libondeli Yesu asalaki bomoi na ye mobimba kati na libondeli. Na kati ya libondeli nde tozali kopesa Nzambe esika ya kosala mosala kati na biso. Emoniseli 5:8“…mpe basimbaki mbeki ya wolo oyo etondi na malasi, oyo ezali mabondeli ya basantu.” Moto oyo azangi libondeli, azali moto ya mabe. f) Bomoko Yesu abondelaki mpo na biso: Yoane 17:21“Mpo na bango nyonso bazala moko; ndenge yo, Tata, ozali kati na ngai, mpe ngai kati na yo, bango mpe bazala kati na biso, mpo ete mokili kondima ete yo otindaki ngai.” Bomoko ezali eloko moko oyo esengeli komonana kati na nzoto ya Klisto. 3. KOZALA LILOBA YA NZAMBE Soki tozali kosala misala oyo, tokokóma biloko ya lokumu mpo na Nzambe. 2 Timote 2:21“Soki moto abongisi ye moko, akokóma eloko ya lokumu, eloko ya bosila, oyo esengeli mpo na Nkolo, mpe etongisami mpo na mosala nyonso ya malamu.” SANGO MPO NA YO Yo ozali mosala ya Nzambe. Tika ete bomoi na yo emonisa misala ya malamu oyo ezali kati na Yesu Klisto. 👉 Soki olingi kozwa mateya ya mokolo na mokolo na nzela ya WHATSAPP, kótá na link oyo:https://whatsapp.com/channel/0029VaBVhuA3WHTbKoz8jx10 📞 Mpo na kokutana na biso:+255789001312+255693036618 Nzambe apambola yo.